Tagline
ETEYELO YA BOKOLISI BOYEBI MPE BOLINGO YA NKOTA YA EKOLO NA YO KONGO
✍🏽Molakisi Leobanem
KONGO AKADEMIA ezali eteyelo ya koteya mpe komemya nkota to minoko ya ekolo Kongo.
Yango tobongisi naino na ebandeli koteya nkota oyo ezua esika ya nkota ya ekolo bo ekomama na mobeko ya yambo.Ezali bongo lingala, kikongo , tshiluba na kiswahili.
Kasi toyebaka 'te o ekolo Kongo, nkota ezali kaka minei te kasi ata nkama minei lolenge baluki bapesa montango ! Na yango , se lolenge bino bokosepela , tokoyeba kobongisa mpo na kozuela bino bateyi mpo na nkota bina.
Tokosenge na baye basepeli na likanisi liye, bamikomisa na lombangu mpo na bolandi mateya.
Tokozala pe kopesa bino basango ya ekolo na molongo ntango nyoso ekobongisama.
Tosuki wana te tokolobela bongo maye etali nkita ya ekolo , ezala ata elambeli ya bato, to mpe bizaleli misusu oyo boyebaka ntina te . Mpo soko boyebani malamu nde bokofanda malamu kati ya bato , koyinana ekozala te ! Mpo bozangi bososolli ya bizaleli ya bato nde ekotisaka bobangi to kotiola bato.
Tokolobela pe mindule , ekozanga te mpo yango esangisi bato ya ekolo tii na libanda ekomi lokola elembo to bendele ya bayimboka na biso.
Topalangana te na eleko ya lelo tokoma kobungisa elobeli na biso mpe tokotisi maloba mingi mauta na nkota ya bampaya !! Likambo liye ekobungisa biso nkota na biso . Nzoka bampaya bazali tango inso kokoma pe koteya lokota na bango tango biso bayimboka tokufi se na komekola nkota ya bampaya .!!!
Tokobosana 'te lokota nde ekolakisa bonsomi ya bato ya ekolo. Yango wana , tango bakotunaka yo soko ozali moto ya wapi , bakobenga yo se na nkombo ya ekolo to mboka ya bankoko na yo .
Bongo yo moto olinga lifalansé to pe ngelesa , koleka na lokota ya mboka ya bankoko na yo soko kutu oyebi yango , ozali lisusu penza moto ya mboka oyo ofandi ? Tee !
Soki ekolo ezua bonsomi, biso pe bato ba ekolo totalisa bonsomi ena . Yo okosepela ete mompaya aya koteya yo lisusu lokota ya mboka na yo penza? ! Tolongwa na mpongi ! Soki tolingi ekolo na biso , tosengeli kobatela nkita nyoso ! Mpo yango nde tokotikela bana ba biso na bankoko baye bakoya sima. Tosengeli kobatela kaka mabanga ya ntalo te , kasi tii na nkota to lolenge ya koloba eye bankoko ba biso batikela biso na lokumu nyoso.
Tozali na misala mibale:
1-Bopesi mateya na bana pe bakolo na nzela ya internet/Zoom
2- Bobongoli makomi na lokota ya lingala. Ekosalema na bayimboka babotama pe bakola na lingala. .
-🔹Ntalo po na mwana oyo akozala kaka ye moko: 20€ /h
🔹Ntalo po na libota mobimba : 25€ /h
🔸ntalo ya bakolo: 26€/h -(liteya ekozua 1,5h)
🔸Ntalo ya liboke ya bakolo: 25€/h (liteya ekozua 1,5h)
♥️Likabo ekopesama ya bofuti kaka 25€ na moto oyo akokotisa moyekoli ya sika , libota to liboke ya bayekoli
♦️Ntalo ya bobongoli makomi: ekolanda montango ya maloba.
☎️WTSP +33 7 69 23 26 12/ +243 9 78 44 97 26
E-m: molakisileobanem@gmail.com/ abalawigide@gmail.com
TOKOBATELA LOKOTA LINGALA YAMBO NA BOTOSI MIBEKO MYA LOKOTA
EBALE EKENDE NYOKA-NYOKA MPO EBOYAKI KOYOKA TOLI
Nkita monene Mokeli apesa na moto nde lokota . yango nde ekokesenisa yo na nyama
Soki tokotosa mibeko ya lokota te tokobunga koloba malamu ! Botika koloba ba-biloko , too ba-makambo, too ba-mibali kasi biloko , makambo, babali!!! tokoteya boko na boyike awa na KONGO AKADEMIA, bongo bolanda liteya wana malamu.
kopesa mbote ezali litombeli te kasi se elembo ya bondeko too ya bonkonde. Yango na lifalansé ezali salut!, na ngelesa hello!na espagnol Hola! na ba amerika Hi! Yango wana eponi ngonga te ,okoki kopesa mbote ata na butu?kasi Bonjour te!!
Mokeli akeli mokili kasi apesi bato mosala ya kokengela pe kobongisa . Tobosana yango te mpo ata ndele bakotuna biso oyo tosalaki awa na nse! Moto na moto abongisa!
🎵"Mikolo tosekanaki na mosolo ya mboka Kongo ekoki/Tofungwani miso lelo tomoni bozoba nyoso tosali/Mpo ya kobongisa Kongo avenir, ebongi tosala ebongi tosala, moto nyoso ata mwana !"
Tabu Ley
"Kobongisa mboka eponi moto te !"
🎵Biso bana mike tosangani lelo tolobi mpo 'te tobongisa / Toluka lisanga ya bayaya na biso bakolo bato ya conseil / Population ya Kongo, jeunesse nationale ,basengi lelo mpo babongisa /Kobongisa Kongo ezali nguya ya population bakonzi bayoka na matoyi ! ...Kobongisa mboka eponi moto te ! Oyo mboka kitoko! Kongo! Mwana kongo , yoka lelo : Bongisa mboka !!! (african jazz)
🎶Kongo ekolo na biso tobongisa yango Kongo !
Kongo ekolo monene tobosana te Kongo !
Tolingana ee toyokana ee tosalisana malamu bongo tobongisa Kongo !
Jacques Loubelo
Mboka Kinshasa
Na eleko eye tozali , ekolo Kongo ezali penza kati ya nungunungu makasi . Na eteni ya monyele bitumba bikosila te . Kivu yango wana ekoti na mbongwana ya AFC/M23. Baye bazali kokamba uta Kinshasa bakotisaki koyinana, mafinga , kimoyibi ya nkita uta likolo tii na nse . Elakisi penza 'te mboka ezali kokambama na bosembo te . Bituka bakoma lokola bana bitike ! Nzela ezali te , ezala ata na nzela ya mayi , mpasi na mpasi lokola masuwa penza ezali te kaka bibeyi to baleinière oyo ekokoka kozua bato ebele te mpe mingi bakozua makama ya liwa na mayi. Bakelasi mpo na bana bikozanga bifandeli, bikomeli , nyoso ! Tango balobi bafuta te etomboli montango ya bana na kelasi mpe molakisi akokoka lisusu koteya malamu te . Balakisi bakofutama na lolenge bonsomi ya mosala ena ekosenga te, bakoma babola ! Nkisi ya kosalisa bato ekozanga lolenge moko na balopitalo yango moko. Mosolo ya ekolo ezali na motuya te , biloko ntalo .Yango bato batika kondimela mosolo ya ekolo . Bakoma kosalela dollar ya Amerika koleka na mosolo penza ya ekolo! Suka na yango tokomona se bisika ya kokunda bato ekoma ebele mpo liwa ekoti mingi na mboka. Mboka mobimba bosembo esila .
MISALA MABE
Yango tokomi koyoka mingi mingi bato bakomi komilobela 'te esengeli ekolo ekota na esaleli ya fédéralisme to boyangeli ya bituka lolenge tolimboli . Yango ezali mpo uta tozua lipanda mboka ekambamaki kaka na baye ya Kinshasa mpe ezala mibeko to mbano nyoso ekoma kaka kozela Kinshasa eloba . Bango nde bakonzi mpe bituka nde mingamba ! Nzoka bango basundola bituka uta kaka ekolo ezuaki lipanda! Yango bituka ekoma zamba na zamba , ekauka na bato! Mokano nyoso ata mpo na misala etali bituka ekoutaka kaka na Kinshasa ! Nzoka na Kinshasa sembo ezali soki moke te na oyo etali misolo. Touti koloba yango awa. Nyoso oyo ekotisi likanisi 'te mpo ozala malamu , esengeli kaka ofanda na KInshasa. Mpo ata kofuta basali ya Leta na bituka , bazelaka misolo miuta na Kinshasa.Tango mosusu ekokoma penza sima ya mikolo , too tango mosusu pe ekobenda mindondo na makama ya ndenge nyoso , moyibi pe epai .
BAYE BAKOSALELA BOYANGELI YA BITUKA
Kasi mpo na kofandisa makanisi malamu, tokopesa bino naino lisolo ya molongo na mpo oyo ebengami boyangeli ya bituka . Bokambemi ya bituka ya yambo na molongo ekelamaki na mobu 1789 o mokili ya Amerika. Tii na lelo ezali oyo eleki na bonene mpe boumeli. Ekolo Suisse mpe ebongisaki ya bango na mobu 1848. Canada na mobu 1867. Bikolo misato bina bizali tii na lelo mpe kotambola na semba nyoso. O bisika misusu bamekaki kotia yango lokola na Amerika ya ngele pe na Germany ebongaki te . Kaka na bonkama ntuku mibale mpe na suka nde mboka misusu bayaki kolanda lokola Australia. Suka suka tozali lelo na mboka ntuku mibale na minei bakosalela boyangeli ena. Mwa lolenge esusu ya kosala yango ekomi pe kobima epai na epai lokola oyo ya UE oyo esangisi bikolo na lingomba UE , bazali elongo na Eropa pe bikolo bya bango bikomi se lokola bituka!
BOLAMU YA BOYANGELI YA BITUKA
Soki totali malamu oyo esalema epai esusu elongo na baluki tokomono 'te bayangeli ya bituka bakosala mosala malamu koleka . Yango ekouta na ntina ebele . Moko na yango ezali mpo lokola etuka na etuka ekoluka kotalisa 'te bakosala mosala malamu na ekolo, yango ekopekisa nzela na misala ya mabe. Moto nyoso akoluka elonga ya etuka na ye mpe misolo mikotikala kati ya etuka mpo na misala oyo banso bakomona . Ntina ya kozela oyo akouta kuna aloba te. Bato na bato bazali na oyo ya bango balobeli lolenge baponoki bango. Banso bakomikengele . Mpe soki mosala ekoleka malamu te mbeba ekomonana na lombangu. Mpe baye baponomaki bakosangana na lombangu mpo na kozua mbano noki. Mpo moto moko te akolinga kozala sima ya baninga. Na boye lifuti pe ya bato ekomata . Moto ya komilela akozala penza te . Ata mwa bozangi ezali ekozala makasi te ! Esaleli oyo etomboli oyo ebengami bokonzi ya bayimboka to demokratia mpo bazali na makoki ya kolandela misala ya etuka na bango malamu . Bakoki kozua mbano noki engebene na mitindo oyo bango moko baponaki.Awa bayimboka bakokolisa bomoko kati na bango mpo bazali kondimela mosala ya moko na moko.
MIKAKATANO OYO ESENGELI LIBOSO KOLONGA
Kasi boyangeli oyo ya bituka ,ezali mpo na bikolo binso te kaka bongo te. Mpo ekosenga 'te mwa mabongiseli mazala mpo na elonga . Mpo na ekolo Kongo soki totali tokomono 'te baye bakabolaki bituka basalaki yango na likanisi ya 'te etuka na etuka esala mosala yango moko te .Mpe lisusu ata bongo bazali kotosa mibeko te . Bituka bikomi lokola bilanga na bango po bakende kosakana sima na Kinshasa to na mikili ya bampaya . Wana babimisi misolo ya bituka , batiki yango kaka pamba . Tolobi lolnge bakaboli bituka ekoma ntuku motoba , basali yango na likanisi ya ba politiki. Oyo esali 'te bituka nyoso basengeli kozua lisungi ya baninga misusu mpo bazali na nyoso te.Nzoka bazali naino na bomoko te ! Bakosungana lolenge kani?
BOMOKO NA SEMBO LIBOSO
Yango esaleli oyo ekotambola kaka soki boyokani ezali kati na bango mpe sembo ezali. Mpo okoki kodefisa kaka oyo akozongisela yo na ndaka oyo epesamaki. Nzoka lokola kanyaka ekotela bato na ekolo mobimba , botosi ya ndaka bakopesana ekosenga naino mbongwana ya bato. Bato banso balinga kotosa mibeko oyo bakozua na etuka , kanyaka ezala te . Basengeli mpe kondima moto na mosala kaka oyo akoki na yango. Ezala mpo azali ndeko na yo ya libota to moninga na yo te . Kasi mpo ayebi mosala , to alongaki na momekano bopesaki na bato nyoso . Wana sembo ekozala pe ekotalisa 'te moto oyo bozui azali na makoki ya kosala mosala oyo bokopesa ye . Lifuti pe esengeli efutama malamu engebene na mosala na bonsomi nyoso. Mibeko esengeli ezuama po na kotia lifuti ya bato na etando yoko po toyeba tokobanda wapi pe tokoki kosuka wapi.
MOTO NYOSO AZALI LETA
Nkolo kompani nyoso asengeli kofuta mpako na ye na eleko na yango.Bayimboka kati ya bituka basengeli kondima koboya oyo nyoso ekopekisa etuka na bango ekende liboso. Esengeli penza bato bamona Leta lokola eloko moko ya bango, ete ezali mosika te, kasi ebandi nde esika nyoso yo ozali. Tango yo moko ozali komikengela ,osala mabe te, okomi bongo pe Leta! Ntina lisusu moto moko azala sima kokengela yo te !
Lisusu pe ekosenga kozala motema monene pe koyeba kosimba baye bazali na bolembu mpo na kosunga batombwana . Esaleli eye ekolongola molimo ya koswana pe zuwa ya mabe tango nyoso oyo ekoma komonana kati ya bapolitiki na Kongo.
MPO NA BOSUKISI
Na nyoso oyo tolobi tosengeli pe koyeba 'te lokola bato bandimi boyangeli wana , ekotikala kaka bongo libela te . Kasi esengeli bayeba kolanda mbongwana ya mokili pe ya bato . Baye ya sika bakoya kaka na makambo misusu oyo ezalaka te na bileko ya liboso. Ezali kaka bongo . Soki bandimi mbongwana na tango oyo esengeli, wana nde bakoumela kati na bango na lisanga . Ekolo na ekolo ezali na lolenge na yango. Kasi kobongisa mosala ezali kosenga kolongola oyo ya mabe mpo ya sika ezua esika. Koboya mbongwana ezali kokota na kotingama na maye malongaki te . Mpo makambo ya mabe ezalaka kaka mabe ata ebimi maseke to suki ya pembe !. Soki bilei biziki na nzungu ezongaka lisusu malamu te ata osali boni . Bokobwaka yango kaka. Ekolo na bituka na yango ezali kaka lokola nzete . Ekoki kolonga te soki etape na etape elingi kotengama na lolenge na yango .Kasi oyo akoningana tango bozali liboke , asengeli koyeba 'te baninga pe bazali ! Boboto pe efandeli ya bomoko yango wana ! Bomoko oyo esengeli ezala kati ya bituka nyoso mpo misala minso mitosa mibeko oyo mipesamaki mpo na banso. Ndakisa mibeko oyo etali mampinga tango bitumba bikoteli ekolo.Soki tolingi ekolo na biso tokozua tango na mayele ya kosala kaka oyo ekoki kosala 'te elonga ezala solo .
Téléphone: +33 7 69 23 26 12
E-mail: groupedepresselessentiel@gmail.com
Adresse : 20,avenue Paul Valery,Sarcelles 95200
Tagline
*KONGO EKOLO YA MOMENE MOLONGO*
Tagline
TOKOLISA BOYEBI YA EKOLO
**MASESE : -Kokende liboso ezali kokoma te !
-Mbwa ezali na makolo minei kasi elandaka se nzela moko
Mpo na kobatela bokolongonu na biso tosengeli koyeba kolia bilei ya malamu tango nyoso
Mpo nzoto ezuaka matongi na yango se na oyo tokoliaka. Toyeba sik'oyo kososola malamu. Awa bato mingi bakoma se kosepela kolia misuni to nyama , tobosani 'te bilei ya liboso bipesamaka na moto nde milona , ndunda , nkasa , mbala, na mbuma ya nzete?
🟢 Elambeli ya mpondu lolenge ya mboka Kongo🇨🇩:
1°/- ya yambo : kolembisa mpondu
Mpo na kolamba mpondu tokosala boye.
Nakosukola mpondu oyo nasombaki mpo na kolongola bosoto nyoso.
Na sima nakotokisa yango tii soki elembi naluboli yango pe nakotia na eboka mpo na kotuta elemba penza.
2°/- ya ibale: kotia bikelakela ya kopesa lompimbo mpe kolembisa mpondu
-Wana nakotiaka pe bikela ya lompimbo lokola matungulu, pilipili , nsolo, pe misusu.
Soki nasilisi kotuta mpondu,
3°/-ya isâto -Kolamba na nzungu :
nakotia pondu kati ya nzungu po na kolamba .
Nakotika boye etoka penza tii nsolo ya mobesu elongwa.
Sima nakoki kobakisa , ata mbisi to nyama , soko nalingi,
4°/ ya inei: kotia mungwa: Sika nakoki kotia mpe mungwa o kati ya nzungu po ebela esika moko na pondu.
Soki namoni ‘te ekomi kobimisa nsolo ya kobela, wana nakosopa mafuta ya mbila likolo ya pondu po epesa yango supu ya kitoko.
Awa nakolembisa moto ezala ya makasi lisusu te, Nakofandisa nzungu ya mpondu na moto tiii sima ya mwa ntango nde nakomono ‘te ebeli ,
4- mpondu ebeli , ekoki koliama : wana nakolubola yango po na kolia na loso oyo elambemaki pembeni to mpe na kwanga to fufu.
Tala lolenge bakolambaka mpondu na mboka Kongo !
-ya yambo= 1°=primo, premièrement
-elambeli (nom commun) = dérivé du vb kolamba (cuisiner) —elambeli= la manière de cuisiner =lolenge ya Kolamba
-lolenge = la manière de , la façon de faire quelque chose
-vb kosukola= laver, nettoyer —nakosukola= je laverai (futur simple)
-vb kolèmbisa= dérivé du - vb Kolemba (=être fatigué,
NB: vb +isa= -isa: ajoute la notion d’une action faite sur le verbe concerné , d’où : kolembisa= faire fatiguer = ramollir, rendre tendre
Ex-kotálà=regarder; kotalisa= indiquer, faire voir, montrer / kobeta= frapper; kobetisa= faire frapper une personne par quelqu’un d’autre que soi
-vb kosómbà - nasombaki (passé proche)= j’ai acheté
-bøsøtø (nom commun) = la saleté
lompímbó (nom commun) = la saveur
mpimbo (adjectif qual.)= pur, agréable arôme
-nzungu = casserole (nzungu ya monene= marmite), nzungu ya moke =petite casserole, de taille normale
-nsolo ya mobésu= odeur de ce qui n’est pas cuit
-nsolo ya kobélà= odeur de ce qui est cuit
vb -kosopa= verser , répandre
-mafúta ya mbila= huile de palme
vb kofandisa=vb kofanda +isa= poser ,
vb-kofandisa na moto = garder encore un moment sur le feu
vb-kolubola= retirer un plat du feu quand c’est cuit
pembeni = à côté , proche
Tozali lelo kolobela bilei oyo bankoko na biso bazalaka kolia kala pe mingi kati ya bingumba bakoma kobosana. Ezali bilei ya ndunda , milona mpe mbuma. Mpo na batangi ya Biblia bayebi 'te yango nde bilei ya yambo Nzambe apesaka na moto. Kasi lelo , likolo ya kolia misuni bato mingi bakoma kobela pamba pamba mpe makono masusu makoma kozua bango.Suka suka :bomoyi bokuse!
Baluki ya lelo bamoni 'te baye baliaka kaka milona nde bazali na nzoto kolongono koleka baye baliaka misuni pe bakoumela na mokili. Elingi koloba nini?
Awa tozueli bino mama Cheffe Phoebe Dunn . Ye akolobela biso mozindo ya likambo lina . Azali kosala bongo na esika moko ya kolia na nkombo "Embuscade Pigalle" na Paris 9è elongo na moninga na ye .
https://lembuscade-restaurant-paris.eatbu.com/?lang=fr
Téléphone+33 769232612
E-mail: groupedepresselessentiel@gmail.com
Adresse : 20, av Paul Valery , Sarcelles 95200
Tokotalisa bino na etape eye mozindo ya maye bosengeli koyeba mpo na bisika to maye matika sango o ekolo na biso
LISOLO YA EKOLO
Llibanda ya masano ( Stadium des Martyrs ) oyo toyebi lelo ‘te ezali esika ya masano ya ndembo to ya makutano ndenge na ndenge ya miziki , politiki to mpe misusu bongo na bongo. Esika yango ezali kati ya komine ya Lingwala . Ekoteli na yango etali balabala Les Huileries na balabala Triomphales na loboko ya mwasi. Na mokongo na yango nde loboko ya mobali oyo ezali na ngambo ya balabala Kasavubu mpe na loboko ya mwasi ekabwani na mayi ya bitsakutsaku ya balabala Dima .
Esika ena , na eleko ya babelesi, na Congo-belge, liboso ya lipanda , ezalaki esika misala ya kotanga bato ya mboka ezalaki kosalema. Moyindo nyoso soki akomi na Kinshasa asengelaki aleka kuna akomisa nkombo mpo bamopesa mokanda babengaki buku ya mpako . Na yango misala babengi « Idenditification" na lifalansé to kotanga mpe kososola bato mizalaki kosalema kuna. .
Lokola ezalaki kati ya esika bayindo bafandaki ,oyo babelesi babengaki yango « La Cité indigène »,to na bokuse "la Cité" , lolenge bayimboka bazalaki kobenga yango. Ezali solo na kokeseni makasi na esika mindele bafandaki , oyo ebengamaki Kalina mpe ekoma Gombe. Gombe nde babengaki yango «centre ville », to "ville ". Kuna okokuta tii lelo zando ya monene na mpe ba magazini minene ya mimbongo ya mindele . Soki yango ebengamaki mingi na bokuse na nkombo ya « La Cité », elingi koloba mboka ya bayindo. Kuna mpe ezalaki na ndako ya lokumu na kati mabaya matiamaki mpo na kobongisa eyokemeli ya mingongo ya miziki yango eyebanaki na nkombo ya « Conservatoire » ya miziki. Ezali esika mindele bazalaki kokende koyoka miziki ya bango ya kotombola molimo oyo ebengamaka "musique classique".
Na balabala monene liboso wana ezalaki na nkombo ya prince Baudouin . Balabala oyo ezali moko ya balabala ya yambo oyo basopaki goudron na kati ya Kinshasa elongo na balabala Joséphine Charlotte oyo ekoma avenue du 24 novembre. . Na eleko ya sima, tango ya Mobutu , bapesaki nkombo Kasavubu na balabala ena mpo na kopesa lokumu na moyangeli ekolo Kongo ya yambo.. Yango ebengeli ya « prince » mpo na kolobela balabala ya monene oyo ezali na goudron esika mituka milekaka etikala na bayimboka, koleka penza baye bakoto kelasi te.
Mpe tokobombelaa lisusu ‘te esika wana ezalaka mpe na makambo mibale matika nsango. Ezali gbagba kombo Cabu oyo ekoma Kasavubu mpe na etelemeli ya ba gyrobus oyo ezalaki mituka ya lotiliki ya bokumbi bato uta esika mindele bazalaki kofanda too "ville" oyo ekoma komine ya Gombe tii na Cité. Boye tokoki kozongela libanda ya masano oyo toyebi lelo na nkombo Stade to Stadium des Martyrs de la Pentecôte. Lisolo na yango ezali nini?
-Etongamaki na lisungi ya ekolo Chine (14 oct 1988-14 oct 1993 ntalo 38 millione, efungwamaki mokolo mwa 14 sept 1994 . Lisano ya ndembo monene ezuamaki kati ya ba Léopards ya Zaïre na babeti ndembo ya Malawi. Na monene na yango , esika ena ezali ya isato kati ya Afrika sima ya "FNB Stadium" ya Soweto na Afrika ya ngele na Stade Borg Al Arab ya Ezipeti.
Botongi yango esalemaki na likanisi ya Maréchal Mobutu mpo na kokitana na Stade Tata Raphael oyo ekomaki kala mpe moke mpo na makutano ya ba politiki bo ameseneki kosala. Bapesaki yango nkombo ya Stade Kamanyola mpo na kokanisa bitumba ya elonga oyo bilekaki na mboka Kamanyola kati ya mampinga Faz na batomboki .
Tango Kabila Laurent Désiré azui bokonzi na AFDL ( o mwa 17 mai 1997 nde bakopesa nkombo ya Stade des Martyrs mpo na kokundola likanisi ya baye babomaka bango na esika ena oyo bababengaka sima Ba Martyrs ya Pentecôte mpo mbeba bafundaki bango ya bomeki kobotolo na makasi ngenda ya bokonzi ya ekolo na Mokalbi ekolo ya ntango wana Joseph Désiré Mobutu.
Bazalaki banei: Evariste Kimba (Moyangeli wa yambo ya kala tii sanza ya zomi na moko ya mobu 1965); Jérôme Anany (moyangeli ya kala ya bobateli mabele ya ekolo to Défense tango ya Adoula), Emmanuel Bamba sénateur mpe mokambi ya lokumu ya lingomba ya Eyamba Kimbanguiste mpe Alexandre Mahamba (moyangeli ya mabele to affaires foncières tango ya Adoula). Babomaki bango na singa na kingo mokolo mwa 1 juin 1966 o libanda ena . Mokili ezalaki oyo ebengamaki bitumba ya nkuku kati ya liboke oyo etingamaki na ekolo ya Amerika mpemisusu na Urss .Wana Kongo ezalaki naino kati ya bitumba ya batomboki ya Mulele Pierre .
Lelo oyo tokoki se koloba 'te ,,ya solo batongela bana mboka esika monene ya masano ya ndembo kati ya engumba Kinshasa. Mpe tii na lelo ezali kaka kosunga bango mpo na makutano ya ndenge na ndenge . Mpo 'te etikala mikolo ebele , moyangeli ya masano esengeli mpe atia kuna baye bayebi mosala ya kokotisa mbongo na libenga ya Leta kasi bazala bayibi te. Wana nde tokobatela nkita na biso malamu bo basusu na mboka bampaya. Totala kaka lolenge na Italia bakobatelaka esika ebengami Colliseum , esika bitumba bizalaka kati ya babuni na tango mosusu ata banyama, se mpo na kosepelisa bato na bango ya eleko oyo wana ya bokonzi ya Roma.Kuna bazalaka kolanda mbeko oyo: "pesa masano na bilei na bayimboka po osala poliki na yo na kimya !"
Nkondo Patrice Emery Lumumba (Lomomba) elombe ya bantoma mpo na bonsomi ya ekolo Kongo (2/07/1925-17/01/1961)
Lisolo ya loyembo oyo ekoma loyembo ya mboka mingi na Afrika ya bayindo tango bakozua lipanda to bonsomi bwa bango , ezali boye :maloba ya loyembo ya liboso makomamaki na Thomas Kanza wana ye azali kuna na Belgique mpo na Table Ronde ya Bruxelles (1960:20/01-20/02 + 26/04-16/05/1960) . Esangisaki bayipolitiki na bankumu ya Kongo na masolo na bakambi ya Leta ya ba belesi lisanga na bayi nkita na misolo na bango .
Yango lokola ekozala kaka masolo makasi kuna, bopemi penza ezali te, ye azuaki likanisi ya kobengisa pe lingomba ya miziki ekende kuna na mboka Bruxelles o "Table Ronde"ena.
Toyebaka 'te ntina ya bokutani ezalaki mpo na boluki nzela ya kosilisa matata makomaki makasi o ekolo Congo-belesi ya tango wana. Ndakisa mobulu ya 4 janvier 1959 oyo bapolisi babetaki masasi po na kopanza bato ya Abako oyo balandi lisano ya ndembo bautaki na libanda ya masano Tata Raphaël sima ya lisano ya ndembo ya Mikado na V.Club.
Masasi ebomaki bato ebele ata minkama . Bato batombukaki pe bakendeki kobuka ba magazini , kobuka , kotumba bisika ebele na Kinshasa oyo ezalaki naino Leopoldville . Talaka penza ntina ya Table Ronde oyo bayimboka bazalaki lisusu kondimela liyangeli ya ba belesi te.
Yango Thoma Kanza lokola ayebaki 'te masolo makozala makasi pe ya koumela ,yango asalelaki likanisi ya kobengisa mpe lingomba African Jazz po ekende kobeta miziki ya kokitisa mitema tango ya bopemi ya bayi politiki ya Kongo bazalaki kuna.
Ye apesaki kaka maloba na lolenge ya makanisi na ye pe loyembo ebongisamaki na balanga nzembo bango moko kati ya lingomba African Jazz lokola moyembi monene Kalle na moninga na ye mobeti nzenze (guitare) monene Nico na basusu banso . Mbuma na yango loyembo oyo tolembaka te na koyoka "indépendance cha cha" .
Na bileko bya kala, tango naino bakeli tv to internet te, bana bazalaki kopesana masapo na mpokwa. Yango nde ezalaki eteyelo monene mpo na koyeba kotambola na mokili. Tokokabola masapo na lokasa na biso oyo . Bolanda pe botindela biso pe ya bino po tokabola yango.-Matondi na bino banso!🫶🏾
LISAPO
Na mboka na biso,bakulutu bazalaká mpokwa nyoso kopesa masapo na bilenge.Wana naino basali bitaleli ya etando eke te ( tv) to bitaleli ya ba sateliti te(Internet) . .Ata ko babuku ya kotanga ezalaki ,kasi masapo wana mazalaki na elengi moko koleka na oyo tozalaki kotanga.Ezalaki mpo na biso koleka na masano ya théâtre oyo tokoma komona.Moto moko azali nkolo masapo te. Yango esali 'te soki oyoki lisapo ya kitoko okobomba yango malamu mpe kutu okolamba yango lisusu malamu penza po yo pe okabela baninga.Masapo mana mazali kaka masolo te kasi matondi na bwanya mpe mayele ya mokili .Lelo nakokaba lisapo moko
LÌSÀPÒ Ó NGÈ!!
-o nge !
Tolanda!
Ntaba moko azalaki koyengayenga na boluki matiti ya kitoko ya kolia.Yango ekumbaki ye tii na zamba oyo ezali pene ya mboka.Talaka ayoki mongongo moko ekobelelaka : »nakufi eh!nakufi eh!,"Apusana boye,amoni nguma akangemi na motambo, monyama ezingi ye pe nzete moko enyati ye, mayele aningana te.
Nguma abondeli ntaba : ntaba bikisa ngai ee kotika moninga boye te !!!Ntaba na mayele na ye ya mokuse, atomboli nzete, akangoli monyama, mpe nguma alongwe na motambo.
Kaka wana nguma akangi
ntaba ,alingami na ye mpe ntaba abandi kobelela "boni boni tika ngai nguma ,ngai nalongoli yo na. motambo,tika ngai nakende"
Kasi nguma azongisi -« ngai nazali na nzala,soki natiki yo nakolia nini?".
Mosika te na bango,mboloko azalaki koleka wana ayoki bango mpe apusani atuni bango"likambo yango nini bokowelela boye? Ntaba kuna akangemaki , aweleli koloba « nguma nabikisi ye na motambo, alingi aboma ngai,loba na ye atika ngai pema esili ngai!
Kasi se wana nguma pe alobi ya ye. Mboloko amikwanyi moto pe alobi" :
-oh ngai namoni 'te bino mibale bokoloba bosembo te.Bomizongisa naino ndenge bozalaki uta ebandeli mpo totala soki ya solo penza ezalaki bongo!
Wana nguma ayoki boye, aweleli kofungola ntaba . Sima na yango nguma amilalisi pe ntaba azongisi nzete ya motambo likolo na ye na monyama ekangi lisusu nguma.
Mboloko atali boye pe moke te nguma abandi kobelela na mpasi ya kilo ya nzete"fungola ngai ee! Lon gola nzete! kilo!" Ntaba na ndenge na ye alingi apusana lisusu atombola motambo,akangola monyama, ,kasi mboloko abendi ye na pwasa pe alobi "boni yo bontaba boye! Ngai nasali boye mpo nabikisa yo mpe olingi lisusu kolongola ye? Yaka tokende,totika ye akufa na motema mabe na ye wana!" Mboloko na ntaba bakei ,batiki nguma akomilelaka 'naaakufi eee! naaakufi. eee
Nani akobikisa ye?
Na mokili kotambola bo- ntaba te! Mpo tozali na mokili ya nguma! Zala mayelena ekenge lokola mboloko .
Téléphone: +33 769232612
E-mail: groupedepresselessentiel@gmail.com
Adresse : 20,av.Paul Valery, Sarcelles 95200
Awa tokotiela bino bikela to misala ya balanga nzembo na bayemi ya Kongo . Ekeko oyo ya Maboko esalemaki na moyemi monene LIYOLO . Yango ezali na Kinshasa , na Q.Matonge ,na balabala Victoire-Kasavubu na esika ebengami "Place des Artistes", elakisi "Esika ya bayemi na balanga nzembo" ya Kongo. Kuna batiaka palaki ya kwifele na nkombo ya oyo balingi kopesa lokumu.
Nazuaki likanisi ya kotia esika moko na vidéo eye nzembo ya balanga nzembo ya kala baye bazali nde babandi ya liboso ya mabina toyebi lelo na nkombo ya rumba (to kumba ) . Mosala mwa bango esengeli ebunga te . Mpo bango nde bafungolaki nzela uta eleko ya Congo-belesi pe lelo eboti bana ebele . Talaka lelo mabina wana mandimami na UNESCObo nkita ya kobatela mpo na molongo! Nakolikya 'te lokumu ena ekotombola lisusu mabongisi ya misala ya mandanda na mpe lifuti ya balanga nzembo mpo tokoma komona mingi bakokufa na bobola . Awa bokolanda mandanda ya kala penza oyo mingi eyokanaka lisusu te. Vidéo eye ezali ya ngonga misato mobimba !!! Kasi tozali na likanisi ya koluka mandanda masusu mpo na kopesa lokumu na balanga nzembo mpe mpo bilenge na baluki ya mandanda bayeba kozua misala ma bango. Boboto na bino!
Mokako elakisi Longonya ! Lolenge bankolo bapesaka bana na bango po na kokumisa bango tango asali likambo oyo esepelisi bango ! Loyembo eye ezali Leobanem akelaki yango na mobu 1977 na Paris tango azalaki naino moyekoli na Université. Bazalaki pe na mwa lingomba ya miziki ya kosepelisa baninga tango ya milulu . Bakotaki studio kaka bato misato : ye moko na bandeko mibale wana. KALOS (guit.solo, acc.,bass)pe na Israël Bale (drum). Bokolimbisa mpo oyo bokoyoka awa na youtube ezali palaki te lolenge ebimaki na African Music kasi mingongo ya oyo ezali awa mizuamaki na casssette .
ALANGA NZEMBO: MOSALA YA BAZANGA ? (1)
Uta kala , na ekolo na biso , mosala ya kosepelisa bato na mandanda ezalaki penza mosala ya lokumu te. Yango baboti mingi balingaka bana ba bango bakota mangomba wana te . To pe ata libala , babokilo bazalaki kosepela ata moke te ete mwana na bango abala alanga nzembo. Yango emonanaki se lokola mosala ya zoba. Ntina pe ezali ete balanga nzembo wana bazalaki kobongisa bomoyi bwa bango te. Tokolobela yango na mwa molayi mwa liboso kuna.
Na loyembo eye ekolobela boyokani esengeli kozala kati ya bana Kongo. Moyembi akosenge tolingana pe tokumisa mboka Kongo mpo atamboli mikili mingi amoni mboka eleki ya biso te.
EBALE YA KONGO EZALI LOPANGO TE EZALI SE NZELA . ..
Loyembo eye esalemaki na eleko oyo mokili ezalaki na oyo ebengamaki bitumba ya nkuku (to guerre froide! )Baye balandi ya USA na baye ya URSS bazalaki kobendana bendana! Lokola Kinshasa ezalaki kolanda USA pe Brazza kolanda URSS boyokani ezalaki ata moke te.
Na loyembo oyo moyembi azali kolobela lolenge bana mboka bakonyokwama kati ya Afrika mpo bapolitiki bakomisa bokpnzi nde lopanga na bango moko babosana bayimboka oyo babundaki na bango elongo. yango akomituna "mondele akende ,lipanda tozuaka mpo ya nani Afrika!!!"
BIOGRAPHIE:
Max Mongali azalaki moyembi monene mpe mokeli monene ya nzembo. Abeta miziki na Teye national , na African Fiesta ya Rochereau mpe apesa nzembo na byembi enle lokola ya Zaiko oyo Bimi Ombale ayemba na Yoka Longo . Etape, Etike , Ngongi ezali nzembo na ye ...Azalaki naino moyekoli na Belgique tango asalaki loyembo oyo elongo na Michaela na ebele misusu . Awa akotalisa monene ya boyebi na ye mpo na mpasi ya bato ya ekolo na ye Kongo kaka te kasi akobunda mpo na molongo o bisika binso bakonyokola bayimboka .. Yango ayembaki loyembo eye na lingomba ya Yeye National. Maloba : Eee lombonga eee lombonga eee bamama bakolela !!
Baboti ngai moumbu na Kongo monene
Nakoli na mpasi ya bampaya
nalelaki aa mama. !!
Tongo etanaka mpo na moto nyoso na mokili / bulamatari akangisi mayele na ngai na molili
Bayibaki bakosaki bayindo
Lumumba atelemi atumbi moto na ebale
Babanzaki bazindisi bayindo
liwa ya Lumumba epelisi mwinda na mokili
eee lombonga lombonga eee bamama bakolela
Masamba Débat ee Sekou Touré na Nasser wapi Mandela na
N'krumah tolela Bonganda aa
-Uta na Mozambique Angola kino Rodhésie Sud afrika Nzambe Afrika akobimbola
-Angola ekozika Mozambique ekokelela bana ya Afrika nyoso tolela baninga a Nzambe
Mao na Hô Chi Minh bilombe ya révolution wapi Guevara na Malcom toyemba lombonga aa
Bolivie na Guatemala Vuenezala na Uruguay Vietnam bilombe ya guérilla nde balongi etumba
Ee lombonga eee lombonga ee bamama bakolela
Yeye National ezali lingomba ya bayimbokaKongo bazalaki kofanda na Liège na nzinga nzinga , o mboka Belgique. Los Nickelos nde ezali ya bayimboka KONGO na Bruxellles
Moyembi Zizi Nzanga moko ya lingomba ya kala Yeye National ayembi bolingo oyo motyo abombi na motema esengeli aloba mpo ekosuwa na motema lokola pilipili ata asali lokola likambo ezali te !
🎵Tolanda maloba:
-Ekosuwa ngai lokola pilipili/Luisa nyongo na ye awuta bomwana mokanda ya pamba ngai oyo nazikisa na tango nyoso ye akolela eee
-Ekobeta ngai lokola nazui likambo ngai pe nyongo na ye ata nakofuta ekosila te nini akoluka ee ayebisa ngai po 'te tolingana
Yebisa ndeko na ngai tikaka nsoni/ngai pe ko makila na yo tokokani ata pe tokochanger façon ya kovanda okobanga nini mpo 'te oloba na ngai
Moyembi Zizi Nzanga moko ya lingomba ya kala Yeye National ayembi bolingo ya téléphone awa alobi alembi libala ya telephone .Amoni 'te mikolo mikoleka eloko moko ezali te,akomi kutu konuna. yango alobi akoluka nganga nkisi akangela ye mpungu to nganga nzambe alekisa ye ntubela ye alongwa kati ya botutu oyo!
🎵Tolanda maloba:
- Bolingo ya telephone nasi nalembi yango nayebisi yo Tété
-Bolingo ya allo nakoki namiboma na yo mwana mama
-Ekomaka tokutani akotala kodongolo na ndenge ya mabe
-Nasengaka conseil nalingi mpo nayeba lolenge ya momie
Gentil ya telephone motema satana nakomi ébahi!
-Naluka nganga- nkisi akangela ngai mpungu - akangela ngai mpungu nakomi nde kolembe libala ya allo
-Naluka nganga Nzambe oo alekisa ngai ntubela oo - alekisa ngai ntubela nakomi nde konzuluka libala ya telephone
Moyembi Zizi Nzanga moko ya lingomba ya kala Yeye National ayembi mpo na liwa ya moninga mpe ndeko Max Mongali /alobi 'te mpo nini okei noki....mawa !!
Tolanda maloba :
Dit Maxo a ee dit maxo e mama mama a
Okei noki eee oweli nini eee obundi na nani eee
okei mbangu mingi naino tolembi yo te / Tuna n'esika y'ozali motindo tozoki
mbala mingi tolobanaka mokili tovandi naino /oweli lisusu okimi ngai
-Lamuka yo opesa ngai mbote guy alembi kolelalela
Batela Tété na bana batela
Talaka Gaby na bana talaka
Talaka Elodie na bana talaka e
Batela François na bana batela
Pesa na Bébé mbote bovandi pene
-Dit Maxo eee dit Maxo ee ma ma ma
okei noki ee! oweli nini ee! obundi na nani ee !
Lamuka y'opesa ngai mbote nzoto etondi motungisi ee
Tony Dee Bokito apesi yo mbote ...
Dit Maxo....dit Maxo ee
Lamuka y'opesa ngai mbote molimo etondi mawa
Koffi olomide apesi yo mbote ...pesa na Nyampanya mbote bovandi penepene
Dit maxo ee Dit Maxo ya Mongali
Nous avons besoin de votre consentement pour charger les traductions
Nous utilisons un service tiers pour traduire le contenu du site web qui peut collecter des données sur votre activité. Veuillez consulter les détails dans la politique de confidentialité et accepter le service pour voir les traductions.