Na eleko eye tozali , ekolo Kongo ezali penza kati ya nungunungu makasi . Na eteni ya monyele bitumba bikosila te . Kivu yango wana ekoti na mbongwana ya AFC/M23. Baye bazali kokamba uta Kinshasa bakotisaki koyinana, mafinga , kimoyibi ya nkita uta likolo tii na nse . Elakisi penza 'te mboka ezali kokambama na bosembo te . Bituka bakoma lokola bana bitike ! Nzela ezali te , ezala ata na nzela ya mayi , mpasi na mpasi lokola masuwa penza ezali te kaka bibeyi to baleinière oyo ekokoka kozua bato ebele te mpe mingi bakozua makama ya liwa na mayi. Bakelasi mpo na bana bikozanga bifandeli, bikomeli , nyoso ! Tango balobi bafuta te etomboli montango ya bana na kelasi mpe molakisi akokoka lisusu koteya malamu te . Balakisi bakofutama na lolenge bonsomi ya mosala ena ekosenga te, bakoma babola ! Nkisi ya kosalisa bato ekozanga lolenge moko na balopitalo yango moko. Mosolo ya ekolo ezali na motuya te , biloko ntalo .Yango bato batika kondimela mosolo ya ekolo . Bakoma kosalela dollar ya Amerika koleka na mosolo penza ya ekolo! Suka na yango tokomona se bisika ya kokunda bato ekoma ebele mpo liwa ekoti mingi na mboka. Mboka mobimba bosembo esila .
MISALA MABE
Yango tokomi koyoka mingi mingi bato bakomi komilobela 'te esengeli ekolo ekota na esaleli ya fédéralisme to boyangeli ya bituka lolenge tolimboli . Yango ezali mpo uta tozua lipanda mboka ekambamaki kaka na baye ya Kinshasa mpe ezala mibeko to mbano nyoso ekoma kaka kozela Kinshasa eloba . Bango nde bakonzi mpe bituka nde mingamba ! Nzoka bango basundola bituka uta kaka ekolo ezuaki lipanda! Yango bituka ekoma zamba na zamba , ekauka na bato! Mokano nyoso ata mpo na misala etali bituka ekoutaka kaka na Kinshasa ! Nzoka na Kinshasa sembo ezali soki moke te na oyo etali misolo. Touti koloba yango awa. Nyoso oyo ekotisi likanisi 'te mpo ozala malamu , esengeli kaka ofanda na KInshasa. Mpo ata kofuta basali ya Leta na bituka , bazelaka misolo miuta na Kinshasa.Tango mosusu ekokoma penza sima ya mikolo , too tango mosusu pe ekobenda mindondo na makama ya ndenge nyoso , moyibi pe epai .
BAYE BAKOSALELA BOYANGELI YA BITUKA
Kasi mpo na kofandisa makanisi malamu, tokopesa bino naino lisolo ya molongo na mpo oyo ebengami boyangeli ya bituka . Bokambemi ya bituka ya yambo na molongo ekelamaki na mobu 1789 o mokili ya Amerika. Tii na lelo ezali oyo eleki na bonene mpe boumeli. Ekolo Suisse mpe ebongisaki ya bango na mobu 1848. Canada na mobu 1867. Bikolo misato bina bizali tii na lelo mpe kotambola na semba nyoso. O bisika misusu bamekaki kotia yango lokola na Amerika ya ngele pe na Germany ebongaki te . Kaka na bonkama ntuku mibale mpe na suka nde mboka misusu bayaki kolanda lokola Australia. Suka suka tozali lelo na mboka ntuku mibale na minei bakosalela boyangeli ena. Mwa lolenge esusu ya kosala yango ekomi pe kobima epai na epai lokola oyo ya UE oyo esangisi bikolo na lingomba UE , bazali elongo na Eropa pe bikolo bya bango bikomi se lokola bituka!
BOLAMU YA BOYANGELI YA BITUKA
Soki totali malamu oyo esalema epai esusu elongo na baluki tokomono 'te bayangeli ya bituka bakosala mosala malamu koleka . Yango ekouta na ntina ebele . Moko na yango ezali mpo lokola etuka na etuka ekoluka kotalisa 'te bakosala mosala malamu na ekolo, yango ekopekisa nzela na misala ya mabe. Moto nyoso akoluka elonga ya etuka na ye mpe misolo mikotikala kati ya etuka mpo na misala oyo banso bakomona . Ntina ya kozela oyo akouta kuna aloba te. Bato na bato bazali na oyo ya bango balobeli lolenge baponoki bango. Banso bakomikengele . Mpe soki mosala ekoleka malamu te mbeba ekomonana na lombangu. Mpe baye baponomaki bakosangana na lombangu mpo na kozua mbano noki. Mpo moto moko te akolinga kozala sima ya baninga. Na boye lifuti pe ya bato ekomata . Moto ya komilela akozala penza te . Ata mwa bozangi ezali ekozala makasi te ! Esaleli oyo etomboli oyo ebengami bokonzi ya bayimboka to demokratia mpo bazali na makoki ya kolandela misala ya etuka na bango malamu . Bakoki kozua mbano noki engebene na mitindo oyo bango moko baponaki.Awa bayimboka bakokolisa bomoko kati na bango mpo bazali kondimela mosala ya moko na moko.
MIKAKATANO OYO ESENGELI LIBOSO KOLONGA
Kasi boyangeli oyo ya bituka ,ezali mpo na bikolo binso te kaka bongo te. Mpo ekosenga 'te mwa mabongiseli mazala mpo na elonga . Mpo na ekolo Kongo soki totali tokomono 'te baye bakabolaki bituka basalaki yango na likanisi ya 'te etuka na etuka esala mosala yango moko te .Mpe lisusu ata bongo bazali kotosa mibeko te . Bituka bikomi lokola bilanga na bango po bakende kosakana sima na Kinshasa to na mikili ya bampaya . Wana babimisi misolo ya bituka , batiki yango kaka pamba . Tolobi lolnge bakaboli bituka ekoma ntuku motoba , basali yango na likanisi ya ba politiki. Oyo esali 'te bituka nyoso basengeli kozua lisungi ya baninga misusu mpo bazali na nyoso te.Nzoka bazali naino na bomoko te ! Bakosungana lolenge kani?
BOMOKO NA SEMBO LIBOSO
Yango esaleli oyo ekotambola kaka soki boyokani ezali kati na bango mpe sembo ezali. Mpo okoki kodefisa kaka oyo akozongisela yo na ndaka oyo epesamaki. Nzoka lokola kanyaka ekotela bato na ekolo mobimba , botosi ya ndaka bakopesana ekosenga naino mbongwana ya bato. Bato banso balinga kotosa mibeko oyo bakozua na etuka , kanyaka ezala te . Basengeli mpe kondima moto na mosala kaka oyo akoki na yango. Ezala mpo azali ndeko na yo ya libota to moninga na yo te . Kasi mpo ayebi mosala , to alongaki na momekano bopesaki na bato nyoso . Wana sembo ekozala pe ekotalisa 'te moto oyo bozui azali na makoki ya kosala mosala oyo bokopesa ye . Lifuti pe esengeli efutama malamu engebene na mosala na bonsomi nyoso. Mibeko esengeli ezuama po na kotia lifuti ya bato na etando yoko po toyeba tokobanda wapi pe tokoki kosuka wapi.
MOTO NYOSO AZALI LETA
Nkolo kompani nyoso asengeli kofuta mpako na ye na eleko na yango.Bayimboka kati ya bituka basengeli kondima koboya oyo nyoso ekopekisa etuka na bango ekende liboso. Esengeli penza bato bamona Leta lokola eloko moko ya bango, ete ezali mosika te, kasi ebandi nde esika nyoso yo ozali. Tango yo moko ozali komikengela ,osala mabe te, okomi bongo pe Leta! Ntina lisusu moto moko azala sima kokengela yo te !
Lisusu pe ekosenga kozala motema monene pe koyeba kosimba baye bazali na bolembu mpo na kosunga batombwana . Esaleli eye ekolongola molimo ya koswana pe zuwa ya mabe tango nyoso oyo ekoma komonana kati ya bapolitiki na Kongo.
MPO NA BOSUKISI
Na nyoso oyo tolobi tosengeli pe koyeba 'te lokola bato bandimi boyangeli wana , ekotikala kaka bongo libela te . Kasi esengeli bayeba kolanda mbongwana ya mokili pe ya bato . Baye ya sika bakoya kaka na makambo misusu oyo ezalaka te na bileko ya liboso. Ezali kaka bongo . Soki bandimi mbongwana na tango oyo esengeli, wana nde bakoumela kati na bango na lisanga . Ekolo na ekolo ezali na lolenge na yango. Kasi kobongisa mosala ezali kosenga kolongola oyo ya mabe mpo ya sika ezua esika. Koboya mbongwana ezali kokota na kotingama na maye malongaki te . Mpo makambo ya mabe ezalaka kaka mabe ata ebimi maseke to suki ya pembe !. Soki bilei biziki na nzungu ezongaka lisusu malamu te ata osali boni . Bokobwaka yango kaka. Ekolo na bituka na yango ezali kaka lokola nzete . Ekoki kolonga te soki etape na etape elingi kotengama na lolenge na yango .Kasi oyo akoningana tango bozali liboke , asengeli koyeba 'te baninga pe bazali ! Boboto pe efandeli ya bomoko yango wana ! Bomoko oyo esengeli ezala kati ya bituka nyoso mpo misala minso mitosa mibeko oyo mipesamaki mpo na banso. Ndakisa mibeko oyo etali mampinga tango bitumba bikoteli ekolo.Soki tolingi ekolo na biso tokozua tango na mayele ya kosala kaka oyo ekoki kosala 'te elonga ezala solo .
Nous avons besoin de votre consentement pour charger les traductions
Nous utilisons un service tiers pour traduire le contenu du site web qui peut collecter des données sur votre activité. Veuillez consulter les détails dans la politique de confidentialité et accepter le service pour voir les traductions.