555 55 55 55

 Sango ya Goma:
Moyangeli ya Goma, Katembo N.J., apekisi mombongo ya  masanga to whisky ya sachet   ya nkombo "chief"  Bongo etumba na Premidis S.A.akosala yango tango nini ?  


 

Mwana mboka Katembo Ndaleni Julien oyo azali  Moyangeli ya mboka Goma (too Maire)  autaki bongo o mokolo mwa  mitano ya sanza eye tozali (5 mai) kobimisa mbano  ya bopekisi mombongo ya masanga ya makasi na ba sachet lokola whisky ebengami « chief ». Kaka oyo ezali kati ya milangi ya 300 ml mpe likolo nde ekoki kotekisama. Moto nyoso oyo akotosa te , akozua etumbu na ye bo mibeko mikotinda.

Mpo nini azui mbano ena ? Toyebi ‘te bato mingi bazali kobombana sima ya masanga kati ya ba sachet oyo bango moko basali na ndako na lolenge elongobani te . Boko bazali kotia ata alcool  dénaturé , oyo ekotekama na pharmacie  to ndako ya mino  mpo  na kotombola bokasi ya masanga ya makasi . Wana bakosangisa "alcool dénaturé" na  mwa ndambo ya whisky penza mpo epesa nsolo na langi na yango . Masanga ya lolenge oyo  ezali kobebisa  bokolongonu ya bato ebele  pe ata kokumba bango na liwa ,  soki te ekobebisa bameli na yango moto , makanisi kaka  ya kotia mobulu na mboka .  Bato mingi, koleka penza bilenge ,  bakoma komela yango po ezali ntalo moke . Kasi ezali nde liwa penza na mpasi ya nzela mokuse! Tokeba makasi , tolengela nzoto; mpo nyoso oyo tokolia too tokotia kati ya nzoto na biso ekobenda soki bolamu te kaka mabe na bomoyi na biso. Yango penza mosala ya bayangeli ekolo. Basenzele mingi bizaleli  ya bayimboka. Kasi ata balobeli kaka masanga ya ba sachet, tokolikya ‘te ezali kaka ebandeli. Mpo esengeli penza batelemela bomeli masanga ya makasi na makaya ya makasi na bilenge . Bango oyo nde bakomi mikolo oyo baye tokobenga kuluna to babomi penza . Bato mingi oyo bazali koboma bato na butu to kokota koyiba na ndako ya bato , bazali mingi baye basilaki komela makaya ya makasi to lopipi , na  masanga ya makasi wana! Longonya na moyangeli Katembo ! Kasi asuka wana te , alemba te , mpo mosala ezali penza ngomba makasi lokola ebanda kala , pe bato mingi bamesana na bizaleli  bina ya mabe. 

Nzoka tokobosana  'te na mobu 2022, mwana mboka Josué Mufula Jive afundaka Shiva Reddy, nkolo kompani Premidis S.A oyo esalaka  kaka masanga ya makasi te , kasi mpe na fufu ya masangu , , gel hydroalcoolique pe lisusu mayi mabengami na lifalansé  "eau minérale" . Kaka kompani oyo ezali pe na  nkombo na yango  etiama na mabaya minene kati ya Goma . Tii lisusu moyangeli ya Goma ya ntango wana apesa balabala moko nkombo na ye lokola ye atongelaki na polisi ya mboka Goma ndako enene ya misala ya motuya 200.000 $!  Tokobenga yango nini soki kanyaka te ? Soki tii na lelo eleki mbula misato tokoyoka lisusu suka ya likambo ena te , kutu masanga wana ezali kaka kotambola pe kotekama.  Pe Katembo alobi malamu ete apekisi whisky ya milangi ya 300ml te kaka oyo ya sachet, elingi koloba 'te whisky wana nde ezali malamu po na bilenge  to po na bokolongonu ya nzoto ?  Esika nini na mikili ya Eropa bamona bakotekisa masanga ya makasi na balabala lokola mapa?  Nzoka yango nde ekosalema awa kaka na ekolo na biso . Mpo nini ? Mwana Kongo nani akoki akende ata azali na misolo kuna na India kosala kompani lokola ye Shiva Reddy asala nan GOMa ? Nani akopesa ye ndingisa ? Mpo nini bakonzi ya KOngo tii na Kinshasa bandima ete bampaya bazuaka biso lokola banyama? 

 Soki tolobi mbongwana esengli ekota , ebanda na makambo mike mike naino. Moto abongwanaka motema na bizaleli ya mokolo na mokolo .  Tokozela penza ete moyangeli ya sika atalisa bolingo na ye na mboka na bozongisi bonsomi mpo bampaya batosa biso na eleko ebengami Révolution ya AFC/M23  . 

Kasi likambo ya sachet oyo ekotiaka mboka na bosoto kaka te kasi pe na bobebisi , mpo na bileko ebele , mabele pe bilei ya bibwele ,banyama na mbisi. Yango  ezali likambo monene penza. Nde tolobeli yango lisusu. 

   Bopeto ezala kaka na mboka te,  kasi ezala pe kati ya nzoto ya bato na mitema.  Wana bayimboka bakosala mosala malamu pe ekolo ekokenda liboso.

✍🏽leobanem 



 

-Na etuka  ya Kivu ya ngele (sud-kivu)

Na Kalehe :  mpela ebomi bato , ebebisi ndako na biloko

Nsango na biso: na etuka  ya Kivu ya ngele (sud-kivu) sango ya monene mpe  ya mpasi ekouta nde na mayi ma mpela ebomi bato na Fizi. Mpe bato ata monkama  babungi. Na Kalehe nde  toyoki  ‘te ndako zomi na moko (11) mayi makumbi yango, kasi ndako ntuku mitano na moko (51) nde bibebi  . Boye na Kalehe biloko mingi penza  bibebi na mpela ya bokasi ya mayi.

  Na yango moko ya lisanga ya bayimboka ndeko Birimbi Delphin azali kobwaka mbela po bayeba  na lombangu kosunga bandeko baana bazali penza kati ya maps mpe bozangi makasi.

 

Na Kalemie/Tanganyika

 

Na etuka pe ya  Tanganyika  , na mboka  Kalemie ,mayi ma etima (lac) Tanganyika mamataki makasi mpe mazindisi bisika ebele . Se lokola bilili oyo tozueli bino bikotalisa.

 Esengeli penza bayangeli ya ekolo bayebaka kozua mbano esengeli mpo bato batika kotonga ndako pene ya etima (lac) , moluka (rivière) to ebale (fleuve). Tomonoki yango mikolo mileki lolenge Kinshasa ezindaki kaka na mayi ya moluka Nd’jili na ebale Kongo . Soki bakosala eloko te , tokotikalaka se kolela ete ndako ezindi , bato babungi to bakufi. Bazua mayele , basalela misolo ya ekolo na ntina na yango lolenge esengeli.Moyangeli ya solo , esengeli asalaka mosala na bwanya mpe bolingo ya bato na ekolo. Soki bongo te ntina na ye pe ezali te ! Yango  asengeli kozala moto oyo ayebi kotala tango inso  oyo ezali koya liboso mpo mosala ezua likama te.  Ye asengeli azelaka te ‘te makambo makwela  ye mpo sima  abanda kokanisa nini akosala.Yango tokoloba awa ‘te kolinga kozala moyangeli kati ya bato ezali na litomba monene mpo oyambi nde bomoyi ya bato ebele soki te ya mboka mobimba !!! Yango wana uta bonkoko na biso , mokonzi azali moto oyo azalaka na tango mingi mpo na masano ya ye moko te . Mpo asengeli kozala  tango inso na ngonga ya kolandela makambo ma bato basusu too ya mboka ye azali kokamba. Tososola   .

 Na Ibanda /Bukavu -Q.Ndendere : Kotia bopeto ekotisi bomoko

Tokomi awa bobele na Kivu ya ngele :   Na Q. Ndendere tokomi komona ‘te bato bakomi komisunga penza po na kotia bopeto o kati ya komine na bango. Na  mikolo minso ya mposo na  balabala Saïo,  tokomona bilenge na mikolo bakoyaka kosala mosala na kati ya esengo nyoso . Nzoka esika ena,  oyo ezali kati ya lopango ya eteyelo Athénée ya Ibanda,  basundolaka yango penza mbula ebele,  sima ya boyambi baye bakimaki bitumba . Moke moke tokomi komona sik'oyo  ‘te molimo ya masano ya ndembo oyo mazalaki kosalema na etando wana ya Q Ndendere ,   ebandi kozongela bato. Mpo na biso tokomona ‘te ezali lisusu kaka mosala ya salongo to bopeto pamba te , kasi misala ya Ndendere ekokoma bongo elembo pe ndakisa penza po na basusu  mpo na kozongisa  bomoko pe boyokani kati ya bayimboka.  

-Na Kinshasa :minyoko ya bapolisi na bayimboka (eteni ya yambo)

-Awa lolenge bilili bikotalisa   ,tata ya bana  na mwana moke na maboko , oyo azali pe avocat lolenge toyoki ,bapolisi baye batia bango bakengelaka lopango  ya mama ministre ya Coopération  ,Kitabala,  na balabala col. Ebeya na Gombe. (moyangeli atalaka makambo na masolo ya mikili ya bampaya) , bango nde  banyokolaki tata  oyo , balobi "te babeti na kobeta , balakisi ye revolver na polisi, penza lokola soki azali mobomi nzoka azalaki se kosenga nzela mpo atika mwana moke na eteyelo ya bana mike (maternelle) ya  Fatima .    Likambo yango se lokola tata azalaki kokende kotika mwana na ye ya moke na kelasi pe nzela mosusu ezalaki te ayaki bongo kokota na nzela oyo Col Ebeya, toyebi te soki epekisama koleka wana. 

Tata asengi bapolisi nzela ‘te atika motuka na ye wana po akende ata  mbangu kotika mwana na eteyelo ezali pene wana ,kasi ba polisi baboyaki ,moko abimisi mondoki  pe atelemisi yango liboso   ya mokumbi motuka. Tata oyo abimi na motuka kasi tango babandi kolobana wana , mosusu abeti tata wana mbata  pe  batoboli pneus 3 ya motukana baïonette !!! .Bafandisi ye na mwana na ye ya moke na nse liboso ya lopango lokola mokangemi. 

Na Kinshasa :minyoko ya bapolisi na bayimboka (eteni ya ibale)

Sik’oyo motuka ekoki lisusu kotambola te ,ekangi nzela . Basusu pe bayei sima nzela baleka ezali te mituka ebele etelemi wana na makelele. Nyoso ekoleka na moyi makasi o kati na engumba enene ya Kinshasa  ! Bato ebele bayaki wana bakotelemela mosala ya mabe pe bonyokoli bayimboka lokola bawumbu kaka mpo polisi alati sokoto . Nzoka polisi alapa ndayi kaka mpo na mokonzi na ye  wana te   ,kasi mpo na kokengela nde biloko na bayimboka banso ya ekolo Kongo!  


Sima ya mwa tango mama moyangeli ya Leta  na bango  ayaki , pe  po soki aluka kokitisa motema ya tata oyo , akotisaki ye o lopango na ye po basolola . Toyebi te nini elekaki sima pe lolenge nini tata na mwana na ye bazongaki ndako na bango na motuka oyo basili kotobola ba pneus ! Kasi tobenda matoyi ya bapolisi oyo balapa ndayi ‘te bakobatela biloko na  bayimboka. 

 

Na Kinshasa :minyoko ya bapolisi na bayimboka (eteni ya isato)

Kobatala ekolo elingi koloba nini na matoyi na bango ? Tango bakonyokola mwana mboka boye  nzoka bakokaki se koloba na ye apusa motuka na ye epai mosusu to azonga sima ezala liboso ya lopango wana te ndenge bazuaki mitindo na bango.    Ezali kaka soni na ekolo po ezala baye bakobenga na nkombo ya lokumu bakonzi, too ezala baye balati sokoto oyo esombami na mbongo ya bayimboka banso , bazali  ata na bolingo ya bayimboka te . Bongo bakosalela nani  soki bango moko te ?  Nzoka tokobosana ‘te mabe tosalaka na mokili ekofutamaka mingi kaka awa na nse ! Tososola mbongwana ekota!Kongo ezonga ekolo ya lokumu oyo molongo mobimba ekotia miso ! Tobima na monzanga ya  bonyama ! Tozonga bato!

Na Kinshasa :minyoko ya bapolisi na bayimboka 

Lorem ipsum dolor sit amet, consectetur adipiscing elit. Nulla euismod condimentum felis vitae efficitur. Sed vel dictum quam, at blandit leo.

Kalemie: Etima ya Tanganyika ezindisi mboka

Lorem ipsum dolor sit amet, consectetur adipiscing elit. Nulla euismod condimentum felis vitae efficitur. Sed vel dictum quam, at blandit leo.

Logo

©Droits d'auteur. Tous droits réservés.

Nous avons besoin de votre consentement pour charger les traductions

Nous utilisons un service tiers pour traduire le contenu du site web qui peut collecter des données sur votre activité. Veuillez consulter les détails dans la politique de confidentialité et accepter le service pour voir les traductions.